Mwinda-Licht

Mwinda ezali makasi na biso

Misala na biso

Ebombeli makasi ya moyi IP 65 ya
Mwinda-Licht: Nguya ya moyi pona telefon nayo ata lotiliki ekeyi
Kotinda

Lisanga na AFRIK Xpress na Alemanie Mwinda-Licht azali komema biloko na tii na ndako na bokebi nionso.

Mwinda-Licht azali kopesa yo Mwinda ya pete pe oyo ya motuya mpo kosilisa ba nkokoso ya kozangaka lotiliki

Lotiliki ya moyi pona yo

Maye pona kotinda

Moninga na biso pona botindi na Kongo to Afrika:

AFRIK Xpress
Lindenallee 77, 45127 Essen
Tel : +49 201 25 90 51 77



Lisapo ya moke pona biso

Biso Annette und Epe

Lisolo na biso – Kobanda na molili tii na Mwinda

Likambo oyo ekweyelaka biso moko nde epelisaki mwinda ya likanisi ya Mwinda-Licht
Likanisi ya Mwinda-Licht ebandaki na biro te, kasi ebandaki nde na kati ya bomoi ya mokolo na mokolo. Mobali na ngai na bana na biso, bamonaki na Kinshasa ndenge nini pasi ezalaka soki lotiliki ekatani. Tomonaka ndenge nini mikolo moke to mikolo ebele ekoki koleka kozanga lotiliki na ba ndako– tango mwinda ekufi mpe ba telefone ekufi, nzoka nde biloko ekoma nde kosalisa biso mpo na kosolola na libota mpe mpo na mosala to pe makambo ndenge na ndenge

Moyi lokola eyano : Na kati ya molili wana nde toyebaki ete: Tosengeli kosala eloko moko. Kongo na biso eza na makasi moko oyo esilaka te mpe ebimaka mokolo na mokolo – yango nde moyi. Tomitunaki ete: Mpo na nini tosengeli te kosalela makasi ya moyi wana mpo na kopesa bato lipanda?
Mission na biso : Mpo na makambo nionso oyo elekelaki biso, nde tosalaki Mwinda-Licht. Mokano na biso eza ya kosangisa bato ya Kongo na makasi ya lotiliki na nzela ya ba teknolozi ya sika ya moyi. Tozali komema mwinda mpe lotiliki na bisika nionso oyo mposa eza makasi – kobanda mbala moko na makasi ya moyi.

Bilili

Bilili na biso ezali kolakisa makasi ya moyi. Pamba te lotiliki na mboka ezali tango nionso kokatana, biso Mwinda-Licht tozali kopesa eyano soki lotiliki ekatani. Ba bibombi makasi ya moyi to Powerbanks na biso IP65 ezali eyano monene; ata lotiliki ekatani, yo okoki kotondisa portable na yo kaka na makasi to nguya ya moyi.

Biloko na biso

Ba bibombi makasi ya moyi: Ezali nzela ya kopesa makasi ya lotiliki na Kongo ata lotiliki ya SNEL ekeyi

Mwinda ya libela: Ba mayele ya sika mpe ya motuya mpo na mwinda oyo ezali kosala kaka na makasi ya moyi
Biloko ya mosala: Oyo nionso ezali ya motuya ponan ete lotiliki ya bisika nionso





Epaneli ya moyi pona makasi ya moyi
Mwinda oyo esalaka na moyi pona ndako
kati pe libanda

Bibombi makasi ya moyi IP 65

Basinga USB pona kotondisa
lotiliki

MWINDA-LICHT